Liteya Lyrics & Tabs by Lokua Kanza

Liteya

guitar chords lyrics

Lokua Kanza

Album : Wapi Yo congo PlayStop

(Lokua Kanza)
Mwana na ngaï soki lelo to lobi ngaï na we
Liteya nini na koki kopesa yo

Batela bomoyi na yo sala ngele
Moto nionso na mokili akoluka akoma na bomengo
Kasi bomengo ya solo mwana na ngaï
Eza bomengo ya molimo yoka eh
Mwana na ngaï
Mwana na ngaï kumisa nzambe
Akela yo pe batela bomoyi na yo
Koboma moto te epayi nionso yo
Okokendeke
Mwana na ngaï sala ngele epayi yo okotiya ma kolo
Sala ngele ye mwana na ngaï yo (bis)
Mwana na ngaï (bis) sala ngele mwana na ngaï

Mwana na ngaï sala ngele epayi yo okotiya ma kolo
Sala ngele ye mwana na ngaï yo (bis)
Mwana na ngaï (bis) sala ngele mwana na ngaï

Like us on Facebook.....
-> Loading Time :0.0064 sec