Zero Faute Lyrics & Tabs by Koffi Olomide

Zero Faute

guitar chords lyrics

Koffi Olomide

Album : I Koffi OlomidePlayStop

Ngai ooo moto bolingo ekomaki'o pesa nga mapapu pene na tuta mapataaa O ye ko boma ndoto na ngai mawaaa E leki nga na koki te ya mbal'oyo nga na suki awa Soki o lukaka nga na wa hip hip hip houra o gagné Yo moto oyo maboko mobimba ya moninga o zua N'esika o tieyi muinda na motema o tieyi incendie Et pourtant nga na motema na lonela yo fololo rosaa Hm ah nga mawa hein Nga moto bolingo ekomaki'o pesa nga mapapu pene na pimbua na likolo na simba mapata O ye ko boma ndoto na ngai tina na zo luka Nzembo na nga oya je t'aime ekomi ya requiem Na zo likia po na makila ya motema na nga o zokisiîi Ba linga eee na misapi ba lata ba alliances bisengo nioso ya bolingo bango na deux à deux Oya ngai moto oyo na linga na nzoto zéro faute kasi na motema a zanga ata grain de beauté Nga l'amour na nga po na ye na bimi ... welisa Ezalaka boye te ooh na bolingo ah ye To yokanaki yo na nga to lingana toujours Moto oyo a mipesa molimo na ye pete peteee Po a kata motema eza eloko moke po na ko boma ye oo tonga masini ekoki Aah nga nga nga nga mawa troop Aah nga nga nga nga na lelaaa Engambe edo eee biso eee Aah nga nga boye aameeen Lisaponge baninga eee bo yamba lisapoo Naza na cheri moko kitoko ata vu de dos Moyi mobimba na sambelaka butu ekoma noki A zua nga na maboko ma ye o ya ngai vie e banda Tango muinda e kufaka nga bonheur na ngai 100 pourcents Tanga ba mbula ba sanza ya vie na ngai o zui lelo na motema yo tikeli ngai elembo Yo baluki o bosani ba serments pe ba promesses Na ko funda na zuzi nini esi o koma elili ya butu Yo tungisaka esprit na nga o salaka nga ezala zala eee Mboka nini na kende'o bomba nzoto eh mama Na kima soni bolingo na tutelaki tolo mingi Na boyaki ko yoka avis ya ba famille pe ya baninga Yo zui nga nioso o tikeli nga se miso ya pamba po na lela E bongaki o zokisa nzoto kasi motema te ooo mawa eeeh Verbe aimer lisusu un jour soki na ko conjuguer Eko zala se na lisolo ya nga na muan'oyo to bota Ye bolingo na ye jamais eko sila lokola mulinga Mamelo mokonzi verset nini ba sambelaka po na ko bosana moto oyo ba lingaki mingi Ngoo amour qu'as-tu donc fais de nous? Oo amour qu'as-tu donc fais de nous? Yo bolingo po nini o zanga mawaaa? Oo amour qu'as-tu donc fais de nous? Yôoo amour qu'as-tu donc fais de nous? Oo amour qu'as-tu donc fais de nous? Linda M.


Like us on Facebook.....
-> Loading Time :0.0052 sec